lundi 2 avril 2018

Le lundi de Pâques, c'est le "lundi de l'Ange".

Yezu alongi liwa, azali na bomoi: Maria Madeleni amoni ye
*******************************
Jean 20, 1-9
 
Mokolo nsima ya sabato, na nta ntongo, ezalaki naino molili, Maria wa Magadala akei o lilita. Amoni 'te libanga lilongwi o munoko mwa lilita. Akei mbangu epayi ya Simoni Petro na moyekoli  mosusu  oyo Yezu azalaki kolinga, alobi na bango: Balongoli Mokonzi o lilita mpe toyebi te esika batii ye".
Petro na moyekoli mosusu aleki Petro na mbango, atiki ye nsima, akomi liboso o lilita. Asunami, amoni bilamba bilali o onse, kasi akoti te.  Petro alandi ye o nsima, ye mpe akomi.  Ayingeli o lilita, amoni bilamba bilali o nse, na mpe elamba eye bazingaki Yezu o moto.
Elamba ena elali esika yoko na bilamba te, kasi ezingami o esika esusu. Bongo sikawa moyekoli mosusu, oyo ayaki liboso,  akoti mpe. Amoni mpe ayambi. 
Naino bayekoli bayebaki te 'te Yezu asengelaki kosekwa o bawa, lokola ekomami o Mikanda Misantu.

Aucun commentaire:

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj

Mgr Donatien Bafuidinsoni, sj
31.03. 2018-

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm

Mgr Jan Van Cauwelaert, cicm
(06.01.1954-12.06. 1967) + 18.08.16

Mgr Léon LESAMBO

Mgr Léon LESAMBO
(12.06. 1967-22.07. 2005) + 19.11.17

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm

Mgr Philippe NKIERE KENA, cicm
27.07.2005-31.03. 2018

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE

PETIT SEMINAIRE ST LOUIS DE GONZAGUE
BOKORO